Psalms 58

Nzambe azali zuzi ya sembo

Nzembo ya David epai ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki na ndenge ya “koboma te”.


1 Boni, bino bakonzi, bolobaka penza na ndenge ya bosembo ?
Boni, bosambisaka bato na alima nyonso ?

2 Ezali bongo te !
Na mitema na bino bokanisaka oyo ezali sembo te ;
mpe maboko na bino epanzaka mobulu na mokili.

3 Wuta na mbotama bato na mabe babungaka nzela
wuta na libumu, bazali motu makasi
mpe balobaka lokuta.

4 Pwazo na bango ezali lokola ya nyoka ;
bakanga matoyi na bango lokola nyoka, oyo babengaka kobra,
oyo akangi matoyi na ye.

5 Oyo eyokaka te mingongo ya bato
oyo basakanaka na banyoka,
mingongo ya bato oyo basalaka mazi,
oyo bayebana mingi penza.

6 Buka mino na kati na minoko na bango, Nzambe ;
pikola, Yawe, mino ya ntambwe !

7 Balimwa lokola mayi oyo ezali kotiola ;
soki babwaki makonga na bango, tango bakosimba tolo-tolo,
tika makonga na bango ezanga songe.

8 Lokola mbembe oyo ezali konyangwama
na tango ezali kotambola ;
lokola zemi oyo esopani,
tika bamona moi te.

9 Liboso ya banzungu na bino eyoka moto ya ba nzube,
ezala ya mobesu to ekawuka,
bato ya mabe bakolongola bango.

10 Bato na sembo bakotonda na esengo
tango bakomona kozongisama ya mabe na mabe
tango bakosukola makolo na bango na makila ya bato na mabe.

11 Bongo bato bakoloba :
“Ya solo, bato na sembo bazwaka lifuti na bango ;
ya solo, ezali na Nzambe oyo asambisaka mokili.”
Copyright information for LinMNB